Nzoto kolongono

Soki olandi makambo ekomami likolo na musala oyo, okoki komibatela yo moko kolekana na bikono oyo eko pesamaka na mikolobe mpe oyo ya mabako bosoto

4A Haende Waschen

Nzela moko mpe ya motuya koleka mpo na komobatela bikono oyo eko pesamaka na mikolobe mpe oyo ya mabako bosoto ezali ko sukola ntango inso mpe bosukoli malamu na sabuni. Sukola maboko nayo malamu na ntango inso Oko utaka na zong'o inene to mpe ike mpe liboso yako liya.

1D Haende

Sukola nzoto mpe mino nayo mbala misato na mokolo.

Kotalela nzoto nayo malamu ekosunga yo mpona kozanga kozwa bokono. Kende komona musungi mokolongono soki ozali na pasi ya mino.

4D Impfung

Bokono mingi ekoki ko pekisama na mangbele. Batu ebele bazwaka mangbele, se muke bazwaka bokono.

Bakonzi ya mambo mabokolongono ya mboka mundele Swisi bazo senga batu ba zwa mangbele mpo nako bundisa bikono lokola:

  • Valisele
  • Lujole
  • Mpota na ongongo
  • Buka-buka
Icon_Medic_Help.png

Kende epayi ya mosungi wa mokolongono mpona mateya

4E Geschlechtsverkehr

Sima ya sida ezali na bikono ebele lisusu oyo ekoki kopesama na nzela yabosangani nzoto. Okoki komi batela malamu na kosalela kapoti ntango okozala na bo sangisi nzoto. Ezali mpe na kapito yaba baasi.

 

Kapoti ekoki kozwama na bisika ya yako zwela nkisi to mpe ko somba, mpe na ba zango minene

4F Drogenkonsum

Soki ozo salela ba ntonga oyo esila ko salelama na ntango yako mituba bangi, okoki kozwa bokono komekela makila. Tango nyonso saleka ntonga ya sika mpe oyo ezala nanu te.

2C Schwangerschaft

Leka ko mona mosungi bokolongono son ozali na zeni. Ba oyo bayebi mpe batangela bokolongono bako solola likolo ya mituna nayo mpe nini olingi mpo na yo elongo na mwana ozali ko mema mpo bozala na nzoto kolongono mpe bako bongisa bokutani na oyo atangi mpe ayebi bokolongono mpo nayo.

1B Wo Medizinische Hilfe

Mema mwana nayo mpona ko talema ntango na bisika byabozwi nkisi. Bakoki mpe kosungayo na mituna etali kolya ya mwana na yo mpe lolenge yako sunga mwana. Kolandana na mwana nayo ekotikala na nzoto kolongono mpe kokola malamu.