Osalaka nini na ntango ozalaka mobeli

Ezali na mosungi ya bokolongono (Medic-Help) na boyambi mpe botambwisi ndako y abo zuwi kisi kende pene na bango mpe tuna soki ozo mela nkisi, ozali na zemi, ozo yoka pasi to soki ozali na motuna kolandana na bokolongono. Batu oyo batangeli bako pesa yo lisungi to bakotindayo epayi ya Dokotolo to mpe na ndako ene ya bokolongono. 

Soki mosungi ya bokolongono azali na bizaleli mabe to azongiseli yo eyano mabe kende koyebisa batu ya bokengeli.

Motuna nayo oyo etali bokolongono mpe boyebi kolandana na pasi na yo iko sungama na bokengi bonso.

Lisusu kende epayi ya mosungi ya bokolongono liboso soki ozwami na likama. Kaka mbala moko okende na ndako enene ya bozwi kisi.

Icon_Medic_Help.png

Soki yo to mwana wayo azali koyoka pasi mpe bozali na motuna nayo oyo etali bokolongono kende epayi ya mosungi ya wa bokolongono.

 

Bozwi lisungi mpona bokono na esika mosusu yaboluki kimya

Ezali batu baye okoki ko luka kokutana na bango na bisika binso bwa boluki kimya mpo na mituna etali bokolongono. Oko zuwa biyano na bolayi kolandana na esika eye.