Bokono

Obandaki ko nyokwama na bokono na ntango mulayi? Omelaka nkisi ntango inso? Obandaki kozwa nkisi epayi yamunganga na mboka na you, to ntango obandaki ko Lima?

Icon_Medic_Help.png

Kende epayi ya musungi bokolongono mpe limbolela ye mpasi nayo.

Bikono misusu ezalaka yako pesana. Elingi koloba ete ekoki ko leka kowuta mutu moko mpe ezuwi moto mosusu. Ekomaba na nzela ya mopepe ya kosu-kosu, maboko mbindo, makila to na nzela ya bosangisi nzoto, to mpe bisanza to mpe nako simbana na nzoto.

Icon_Medic_Help.png

Soki omoni bilembo oyo kende komona mosungi wabokolongono. Oyo eko sunga you moko mpe bato oyo nazali nzinga-nzinga na yo.

Bikono lokola gono syphilisi mpe misusu ekoki kopesama koleka nzela ya bosangisi nzoto. Bilembo ekoki ko zala kotanga, komi kwanza, kovimba to mpe pasi na bisika ya sekele. Okoki lisusu mpe lisusu kozala na bokono epesami na mokolobe na yo ozali kimona bilembo bya mpasi te.

Icon_Kondome.png

mibatela mpona bosangisi nzoto. Okoki kozwa yango na bisika binso bya bozwi nkisi to mpe somba yango na ba ndeko yaboteki nkisi to mpe naba zango enene. Mibatela yomoko kolandana na bikono bikopesamaka nabosangisi nzoto. Ntango inso salela.

Icon_Medic_Help.png

Soki omoni elembo moko oyo elakisi yo ete ozwami na bokono yabosangisi nzoto, kende nalombagu komona mosungi bokolongono.

Icon_Medic_Help.png

Soki ozali nabo ndimi te sima yabosangisi nzoto lokola omibatelaki te mpe omoni ete okoki ko zwa bokono, kozela te kende na lombangu komi talisa epayi yamunganga. Kozela te ti bilembo ebanda komonana.

VIH ezali mikolobe oyo eko lembisaka nzoto mpebompikiliki ya bibundeli ya nzoto. Okoki ko zala na mikolobe ya vilusi mpe koyebate soki ozali na yango mpo ete elembo ezali te. Soki ozali komela nkisi te, ekoki kolembisa nzoto nayo mpe okoma mobeli makasi. Oyo ebengami sida.

Oyo bokono epesamaka kolekela makila, na ntango ya bosangisi nzoto na kozanga komibatela, nako salela ba ntonga ya bosoto, to mpe mbala moko kowuta na moboti mpe ko pesa mwana na ntango yako botama. Soki ozali na vilusi oyo, okoki ko pesa na batu misusu ata soki ozali komona ata na elembo moko yabokono te.

Sida ebikaka te. Nkisi yango ezalaka kaka ete vilusi esala mubulu te mpe ko kitisa misaka na yango.

Icon_Kondome.png

Mibatela yo moko kolandana na sida. Ntango inso mibatela na ntango oza na bo sangisi nzoto. Okoki ko zwa yango bisika binso bya bozwa nkisi to mpe kosomba yango na ba ndako yabo teki nkisi to mpe naba zando enene.

Icon_Spritze.png

Na ntango inso salela tonga oyo ezali ya sika mpo na ko zwa nkisi boye oko zwa bokono oyo te.

Icon_Medic_Help.png

Falls Sie nach Geschlechtsverkehr ohne Kondom unsicher sind, ob Sie sich mit HIV/Aids oder einer anderen sexuell übertragbaren Krankheit angesteckt haben, gehen Sie zu Medic-Help. Warten Sie nicht bis Beschwerden auftauchen.

Batu oyo bazali na tibe (kosu-kosu enene) ba kosulaka na ngonga molayi koleka poso misato, bazalaka na fefele, mpe mitoki nabutu, to mpe kokondo. Tibe (kosu-kosu enene) ekoki ko pesama na ntango mutu azali na nzoto kolongono apemi mupepe ya kosu-kosu ewuti epayi ya mutu ya pasi.

Tibe (kosu-kosu enene) ezali ya kobanga makasi, soki pasi emonani na ntongo na yango ekoki ko bika. Bozwi nkisi azwaka ba sanza motoba.

Icon_Medic_Help.png

Soki ozali na elembo ata moko ya tibe (kosu-kosu enene) te, mpe osila kozwa nkisi ya tibe (kosu-kosu enene) mbala elaka to mpe ozalaka na mutu oyo azalaki na bokono oyo, kende komona mosungi wa bokolongono.

Masanga ya milangwa, bangi mpe oyo misusu yako pesa milangwa ekoki kosala ete ozinda kati na yango mpe ebeko benisa bokolongono Bwa nzoto bwayo. Bwakisa kosalela bangi.

Bokono ekoki ko pesama kolekele makila na ntango ya bangi wana eza tubama na ba ntonga, ndakisa, na ntango ozali kosalela ba ntonga.

Icon_Spritze.png

Soki okoki kotika kosalela bangi te, na ntango nyonso salela ba ntonga ya sika mpo nako mibatela na bokono eko peseme na ba virusi.

Icon_Medic_Help.png

Moto na mposa makasi ya bangi to masanga ya milangwa akoki zwa nkisi mpe kokitisa. Mona mosungi wa bokolongono.

Makambo mutu alekelaki to misala mabe basalelakiye, lokola bitumba, konyokolama mpe kobaka, ekoki kotinda nzoto to mayele ezwa bokono. Bameli masanga ya milangwa makasi to komipesa na biloko misusu ekoki mpe ko mema yo naba pasi mingi.

Batu ebele oyo bazali kati ya Makambo eye bakomaka na pasi yako solola kolingana na bikono ya mayele. Ezali ya motuya kozwa yango na motuya mingi mpe kopesa bango nkisi lokola bokono mosusu.

Bilembo bya bokono ya mayele ezoli mpe kozanga mpongi na kati ya butu, ba ndoto ya mabe, ba mpasi okoki ko limbola te to mpe Makambo mosusu. ba mpasi oyo ekoki ko libolama te to Makambo misusu.

Icon_Medic_Help.png

Mpasi ya mayele ekoki kozwa mkisi mpe kobika. Kende ko mona mosungi ya mokolongono

Valise le ezali bokono na makasi mingi na oyo etali kopesana, bilembo na yango ezli nzoto moto to fefele na noto yako beba na makwanza mpe bivimbe mike-mike etonda mayi. Okoki komibatela na yango na nzela yako zwa mangbele.

Icon_Medic_Help.png

Soki yo to mwana wayo bozali na bilembo bia valisele, kendeni ko mona mosungi wa bokolongono.

Icon_Medic_Help.png

Soko nanu oyoka kolobela valisele naino te, Luka ko zwa mangbele. Kende epayi ya musungi wabokolongono.

Batu oyo bazali na lujolu bazalaka ntango inso na nzoto moto, misu Morane, kosu-kosu, posi etonda makwanza. Okoki komi batela na yango na bozwi mangbele.

Icon_Medic_Help.png

Soki yo to mwana wayo bozali na bilembo bia lujole, kendeni ko mona mosungi wa bokolongono.

Icon_Medic_Help.png

Soko nanu oyoka kolobe lalujole naino te, Luka ko zwa mangbele. Kende epayi ya musungi wabokolongono

Pasi na mungongo ezali bokono ya mpema likolo to mposo. Ezali na lolenge mibale: mongongo mpe mposo.

Batu oyo bazali na bokono eye bayokaka mongogo pasi, nzoto moto mpe mpasi ntango yako mela eloko. Bilembo oyo emonanaka na ntango inso pona mpasi ya mposo ezali ba mpota oyo abikaka mabe. Okoki komi batela na bokono oyo nabozwi mangbele.

Icon_Medic_Help.png

Soki yo to mwana wayo bozali na bilembo bia kopasuka mongogo, kendeni ko mona mosungi wa bokolongono.

Icon_Medic_Help.png

Soko nanu oyoka koloba bokono yako pasuka mungongo naino te, Luka ko zwa mangbele. Kende epayi ya musungi wabokolongono.

Makwanza eali bokono eye epanzaka na mposo mobimba. Ebandisamaka naba mikolobe oyo ba tobolaka nzela na bango na kati ya mposo.

Nzoto elakisaka soki eloko mabe ekoteliye na likwanza munene, mpe kobeba ya mposo na ntango ebele nabisika bya nsoni, na kati ya misapi, nabikululu mpe bikutani bisusu, na kati yamaboko mpe likolo ya mabele.

Bokono eko lekaka onzela ya bokutanisi mposo kati ya batu mibale

Icon_Medic_Help.png

Soki yo to mwana wayo bozali na bilembo bia kopasuka mongogo, kendeni ko mona mosungi wa bokolongono.

Na ntango likundu (estoma) ezo pela moto to pe mitchopo, okoyoka ko memana, kosanza mpe pulu-pulu eko koma, eko landana na nzoto moto mpe pasi ya likundu (estoma). Batu oyo bazali na bokono oyo na ntango inso ba bungisaka mayi mingi na ntago mole.

Icon_Medic_Help.png

Na ntango ozo mona ata elembo moko te ya pasi ya estoma to mpe ya michopo, kende komona mosungi wa bokolongono.

Icon_Trinken.png

Mela mayi mingi to ti muke.

Icon_Haende_waschen.png

Sukola maboko mayo na ntango inso na sabuni mpona ko tindika musika bikono misusuekoya na bosoto.

Ezali mpe na bikono mingi misusu. Awa boko zwa kaka nsango kolandana na oyo eko mononoko ontango inso.

Icon_Medic_Help.png

Kende kotala mosungi ya bokolongono ata ntango bilemebo bya bokono elimbolami malamu awa te.